Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bureau ya procureur espeli te na bolimwisi ya makoma na telephone ya Jean-Jacques Wondo mpe esengi bolukiluki


Moyi ekolo Amerika Zalman-Polun (C) na avocat wa ye bavandi kati bafundami ya bomeki kokweisa bokonzi na boloko ya basoda na N'Dolo, na kinshasa, 7 sanza ya motoba 2024.
Moyi ekolo Amerika Zalman-Polun (C) na avocat wa ye bavandi kati bafundami ya bomeki kokweisa bokonzi na boloko ya basoda na N'Dolo, na kinshasa, 7 sanza ya motoba 2024.

Mpo na boluki kokweyisa bokonzi na ekolo Congo democratiki, bureau ya procureur ya mbulamatadi ezali komona na miso ya malamu te bolimwisi ya makoma to ba messages na telephone ya Jean-Jacques Wondo mpe esengi ete ba nganga ya mayele basala bolukiluki.

Tribunalo ya basoda ya Kinshasa/Gombe elandelaki lelo boyoki ya bafundami ya baluki kokweyisa bokonzi na ekolo Congo democratiki mokolo mua zomi na libwa ya sanza ya mitano moleki na Kinshasa.

Na kati na bafundami baye basambisamaki, Jean-Jacques Wondo, nganga ya mayele ya basoda ya Belgique mpe ya RDC.

Ye oyo amonisamaki na bureau ya procureur lokola mosalisi ya Christian Malanga. Wondo afundami na ba mbeba mingi lokola bosangani na bato mabe mpe na bosali bitumba.

Bureau ya procureur, na nzela ya Lieutenant Colonel Radjabu Bashiru Innocent asepelaki te lolenge Jean-Jacques Wondo alimuisaki ba messages to ba nkoma na telephone na ngonga ya bokutani na ANR mokolo ya boluki kokweyisa bokonzi.

Na bosambisami ya mokolo mua mwambe moleki, magistrat ya parquet asengi na tribunal ete ba nganga ya mayele ba tala-tala ba telephones ya Jean-Jacques Wondo mpe balandela masolo manso.

Forum

XS
SM
MD
LG