Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ekolo Congo democratiki ezali kokoba kosenga nguya ya lotiliki na ba mboka ya bapaya


Mwasi moko na mwana na ye bazali kotambola na nse ya pylônes ya ba singa ya lotiliki oene Mbanza-Ngungu, RDC, 25 décembre 2018.
Mwasi moko na mwana na ye bazali kotambola na nse ya pylônes ya ba singa ya lotiliki oene Mbanza-Ngungu, RDC, 25 décembre 2018.

Ekolo Congo democratiki ezali kokoba kosenga nguya ya lotiliki na ntina ya kosunga misala mya mabanga ma talo to mpe secteur minier mpe mambi matali nkita na yango.

Na lisolo na bapanzi sango ya lobi loleki na ministere ya Communication mpe Medias, Teddy Lwamba Muba, Ministre ya Ressources Hydroliques mpe ya lotiliki alobelaki mikakatano mpe lolenge ya kosilisa mikakatano yango mpo na kosilisa bosenga ya bato ebele ya lotiliki.

Docteur na Géniie electrique mpe ingenieur electromécanicien akotela yango kelasi, Teddy Lwamba Muba, alobi ete lisituale ya mambi matali bopesi lotiliki na ekolo Congo democratiki esuka na 1982.

Mpe makambo manso makatanaki wana. Na Inga 2, ata likanisi to projet moko mozuama lisusu te.

Kasi, likambo ya malamu ezali ete na eleko lina, lotiliki liye lizalaki kokoka mpo na bosenga banso.

Forum

XS
SM
MD
LG