Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fardc mpe mampinga ma Ouganda batelemisaki basoda ebele na bisika ba ADF bazuami


Bacivili bazali kokima ntango mampinga ma ekolo FARDC matelemi pene na bisika bya bitumba na kilometre zomi na Kanyabayonga, na Nord-Kivu, 14 sanza ya mitano 2024.
Bacivili bazali kokima ntango mampinga ma ekolo FARDC matelemi pene na bisika bya bitumba na kilometre zomi na Kanyabayonga, na Nord-Kivu, 14 sanza ya mitano 2024.

Mampinga ma ekolo Congo democratiki mpe Ouganda batelemisaki mokolo mua eyenga moleki basoda ebele na bisika ba ADF bazuami na zamba ya Mont Hoyo na chefferie ya Walese Wonkutu na Sudi ya territoire ya Irumi.

Engebene na molobeli ya misala Ushuja, colonel Mak Hazukayi, ntina ezali ya komonisa polele bisika batomboki baye bazali kotungisa bayi mboka bazali.

Amonisi ete bakangemi ebele baye bazalaki ya kokangama ba sanza ebele na bayi batomboki batikamaki.

Na ngambo naye, ONG moko ya esika na nkombo ya Convention pour le respect des droits de l’homme (CRDH) esengi na mampinga ete ekoba kokanga bayi batomboki ndenga bazali ya kobendana bongo na ntina ya kosala ete bakoka lisusu kosanga mpe kobongisama te.

Forum

XS
SM
MD
LG