Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC ebengisaki moto atalaka mambi ma bapaya ya Ouganda mpo ONU elobaki Kampala ezali kopesa maboko na M23


Basoda ya Mampinga ma RDC, FARDC, na manduki ma bango na motuka na na nzela ya bitumba na ba M23 na Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kivu, 7 sanza ya zomi 2018.
Basoda ya Mampinga ma RDC, FARDC, na manduki ma bango na motuka na na nzela ya bitumba na ba M23 na Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kivu, 7 sanza ya zomi 2018.

Na ekolo Congo democratiki, Kinshasa ebengisaki lobi loleki moto atalaka mambi ma bapaya ya Ouganda mpo ezali komitungisa na ba nsango ya ba nganga ya mayele ya ONU eye elobaki été Kampala ezali kopesa maboko na batomboki ya M23.

Sima ya bokutani ministre molandi ya ekolo Congo democratiki ya mambi matali bapaya, Gracia Yamba Kazadi, Matata Twaha Magara abwakisaki makambo mango manso.

« Tozali polele na kati ya lingomba ya bikolo ya Afrika ya ngele », abakisi, tosengeli kosala mosala elongo na ntina ya kobengana banguna, na bolandi misala miye mizali kosalema elongo wuto wuto suka ya 2021 na monyele ya ekolo Congo democratiki na mampinga ma RDC mpe ya Ouganda mpo na kobundisa batomboki ADF baye bazali na kati ya lingomba na kombo Etat islamique.

Forum

XS
SM
MD
LG