Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi babale ya makasi to Cartel mexicain ya Sinaloa bakangemaki na Texas, esakolaki ministre ya mambi matali bosembo


Secrétaire d'Etat ya ekolo Amerika Antony Blinken (G) na moyangeli ya CENI (Misala mya bolengeli maponami na RDC) na Kinshasa, 16 sanza ya mwambe 2022. (CENI RDC)
Secrétaire d'Etat ya ekolo Amerika Antony Blinken (G) na moyangeli ya CENI (Misala mya bolengeli maponami na RDC) na Kinshasa, 16 sanza ya mwambe 2022. (CENI RDC)

Awa na ekolo Amerika, bakambi babale ya makasi to Cartel mexicain ya Sinaloa bakangemaki mokolo mua mineyi na Texas, na sudi ya ekolo Amerika, esakolaki ministre ya mambi matali bosembo.

Bokangami ya Joaquin Guzman Lopez, muana ya moyi moto ya misolo oyo atekaka pimbo to lopipi “El chapo” mpe Ismael Zambada Garcia, mpe lisusu abengami “El Mayo”, moko ya bakeli ya cartel, asali mabe makasi na yoko ya lingoma ya bateki lopipi ya mobulu makasi ya mokili mobimba.

Batomolo babale ya cartel na ba nzela to ba ramifications ya molongo ebele bakangemaki na bokiti ya mpempo na bango na Texas, na ngambo ya ekolo Amerika ya mondelo na Mexique, engebene na ba media ya ekolo Amerika biye bitangi nsango ewuti na pulusu.

Forum

XS
SM
MD
LG