Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Julien Paluku azali momonisi elongi ya RDC na bokutani ya AGOA na Washington, DC

Président Félix Tshisekedi ya RDC (na nsima mpe na gauche) na président ya Zambie Hichilema Hakainde (na nsima mpe na droite) bazali kotala ndenge ba ministres ba bango (Julien Paluku ya RDC ya Industries. liboso na gauche na mokokani wa ye ya Zambie) baw

Ekolo Congo democratiki ezali komonisa elongi na bokutani ya AGOA na nzela ya ministre ya mambi ma mombongo ya libanda ya ekolo Congo democratiki, Julien Paluku, eye ekosala ete ba mboka ya Afrika ya Sudi ya Sahara biye bizali na ndingisa ya kotinda biloko to mbuma ya misala mya bango na ekolo Amerika na bofuti misolo te.

Na libanda ya bokutani yango eye ezali kosalema na Washington wutu mokolo mua ntuku mibale na misato kino ntuku mibale na motoba ya sanza ya sambo, Julien Paluku asalisaki bokutani ya masolo na ntina ya kosala plaidoyer na bakeli mibeko ya ekolo Amerika mpo na bozongisami ya AGOA na 2025.

Paluku amonisaki AGOA-RDC na bikela bya yango ntuku mibale na motoba na kati na yango ntuku mibale na yoko biye bizali ya mabanga ya ntalo te mpe mitano ya mabanga ya ntalo.

Asengaki lisusu bozongeli ya AGOA eye ekosalisa bomati ya mimbongo na Afrika mpe na boyingisi makasi bokeli misolo na Afrika.

Forum

XS
SM
MD
LG