Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bana baye bakima bisika ba bango bamonanaki na ba mboka Bukangalonzo


Bana bitike na centre Tulizeni bazali kopesa mbote ya na ba soda ba Uruguay baye bazali kotika RDC na Goma, Nord-Kivu, 21 avril 2013. (Photo by PABLO PORCIUNCULA / AFP)
Bana bitike na centre Tulizeni bazali kopesa mbote ya na ba soda ba Uruguay baye bazali kotika RDC na Goma, Nord-Kivu, 21 avril 2013. (Photo by PABLO PORCIUNCULA / AFP)

Motango ya nkama misato mpe ntuku libwa na mitano ya bana baye bakima bisika ba bango bamonanaki na ba mboka Bukangalonzo, Pont Kwango, Kabuba mpe Batshongo, bisika ya libongo ya Kwango na nzela enene ya RN 1 eye ememaka na Kinshasa.

Bana baye bazalaki kokima bitumba ya ba Mobondo na Kwamouth na territoire ya Popokabaka mpe na Kenge.

Linaka ya masolo ya societe civili mpe misala mya etuka miye mitalaka bosalisi bato to affaires sociales ya Kwango baye bakendeki kuna kotala bango mokolo mua ntuku mibale na mineyi kino ntuku mibale na mwambe balobi ete bana basusu bakima bisika ba bango bamonanaki na ba mboka zinga zinga kasi bakokaki kokoma bisika misusu te mpo ba milici mobondo bazali na bisika bina.

Bazali kosenga na mbulamatadi kopesa maboko na misala ya koyeba nani azali nani, kosangisa mabota mpe kosalisa bana baye bazali na baboti te mpe bazali kokima bitumba ya ba milici Mobondo.

Forum

XS
SM
MD
LG