Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamala Harris aponi Tim Walz mpo azala vice-président na ye soki alongi maponami


(COMBO) Vice-présidente ya USA Kamala Harris na photo ya loboko ya mobali, na Washington D.C, 22 sanza ya sambo 2024 na gouverneur ya Minnesota Tim Walz na photo ya loboko ya mwasi, Washington D.C, 3 sanza ya sambo 2024
(COMBO) Vice-présidente ya USA Kamala Harris na photo ya loboko ya mobali, na Washington D.C, 22 sanza ya sambo 2024 na gouverneur ya Minnesota Tim Walz na photo ya loboko ya mwasi, Washington D.C, 3 sanza ya sambo 2024

Awa na Etats-Unbis, Kamala Harris aponi Moyangeli ya état ya Minnesota Tim Walz mpo na kozala vice-president na ye soki alongi maponami.

Kamala Harris, vice-présidente oyo azali na ebonga, azali kozela Congrès ya ba Démocrates mpo ete andimama na banso bo’ candidates ya lingomba liye na maponami ma mokonzi ya mboka makoya na sanza ya zomi na moko, nsima na botiki kowelela maponami bwa president Joe Biden oyo azali kopesa ye maboko.

Yambo na Congres eye, Kamala Harris asi apesami elaka ya motango ya ba Démocrates mosengli mpo ete andimama na Congres.

Bayi mabongisi ma bobeti ntangwa na maponami ya mokonzi ya kala mpe republicain Donald Trump balobi ete Tim Walz azali moyi ngambo ya nkanza ya bayi loboko ya mwasi oyo akoki kotiya mboka na likama.

Na ngambo na ye, Kamala Harris alobi asepeli na ye mpo azali gouverneur, entraineur mpe soda ya kala oyo abundelaka mabota ma basali lokola ya ye moko.

Forum

XS
SM
MD
LG