Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden apusi mobembo na ye na Texas, na Sudi, nsima ya likama ya bomeki koboma mokonzi ya kala Donald Trump


Président Joe Bidenna esika eye ouragan to mopepe ya Kayina ebomi bato koleka 72 na état ya Florida, 5 octobre 2022.
Président Joe Bidenna esika eye ouragan to mopepe ya Kayina ebomi bato koleka 72 na état ya Florida, 5 octobre 2022.

Mokonzi oyo azali na ebonga na Ekolo AMerika Joe Biden apusi mobembo na ye ya mokolo mua lelo na Texas, na Sudi, nsima ya likama ya bomeki koboma mokonzi ya kala Donald Trump.

Yango nde ndako ya pembe elobaki. Biden asengelaki kokende na Austin, na Texas, mpo na kokundola mibu ntuku motoba ya mobeko ya lotomo ya bato.

Joe Biden asengeli kopesa sango na maye matali bomeki koboma Donald Trump na bakonzi ya FBI mpe ya misala ya bonkutu to Service secret, eye etali mambi ma bobateli ya bakonzi ya politiki, esakoli bongo ndako ya pembe. Bokutani bosalemaki na ndako ya pembe mpe mokonzi molandi Kamala Harris, ministre ya mambi ma bosembo mpe bakonzi basusu ya misala mya bokengi bazalaki na bokutani lina, emonisi mokambi ya Amerika na liyebisi lioko.

Kaka na bolandeli makambo maye, bomeki koboma Donald Trump esalaki été moto moko akufa : ezalaki bongo Corey Comperatore, moto oyo abomaka moto, azali tata ya bana babale mpe awuti kokokisa mibu ntuku mitano.

Yango nde gouverneur ya Etat ya Pennsylvanie, Josh Shapiro, oyo alobi asololaki na molongani ya moweyi mpe na bana baye.

Engebene na Dawn Comperatore Schafer, ndeko na ye akufi na boluki kobatela bana na ye ya basi.

Gouverneur Josh Shapiro asakoli été Corey Comperatore akufi bo héros to akufi liwa bo elombe.

Bato basusu babale bazalaki wana bazokisamaki makasi na babeti masasi oyo mpe abomamaki, engebene na bakonzi.

Linaka lioko lisalemi na site Gofundme na ntina ya kokongola misolo mpo na kosalisa libota ya moweyi.

Lobi mokolo ya eyenga loleki, bakongolaki koleka nkoto nkama yoko na ntuku mwambe ya dollars.

Misala ya bonkutu to service secret elobi été mofundami abetaki masasi mbala mingi esika bato basanganaki wuto esika moko ya likolo eye ezuami na libanda ya esika mitingi ezalaki kosalema pene na 150 metres ya distance, yambo été akangema na maboko ya basoda.

FBI esakolaki été ezalaki bomeki koboma mpe ekangaki moto amekaki kosala mbeba lina : Thomas Matthew Crooks, azali na mibu ntuku mibale, ya Bethel Park, Pennsylvanie.

Ntina ya kosala mbeba lina liyebani naino te. Engebene na media ebele ya ekolo Amerika, ba bombi bibonanaki na kati ya motuka na ye eye etelemaki mosika te na esika meeting ezalaki kosalema.

Papa na ye, Matthew Crooks, alobaki na CNN été azalaki koluka koyeba likambo nini ezali koleka mpe akoloba kaka sima ya kosolola na basoda.

Forum

XS
SM
MD
LG