Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sama Lukonde aponami bo mokonzi ya Sénat na baponi ntuku mwambe na mineyi


Ministre wa Yambo ya sika ya RDC Jean-Michel Sama Lukombe, 15 février 2021. (Twitter/Président RDC)
Ministre wa Yambo ya sika ya RDC Jean-Michel Sama Lukombe, 15 février 2021. (Twitter/Président RDC)

Jean-Michel Sama Lukonde, ministre ya yambo ya kala mpe moyi sénateur ya ekolo Haut-Katanga, aponamaki bo mokonzi ya suku ya likolo lelo mokolo mua zomi na mibale ya sanza ya mwambe ya 2024, na mingongo ntuku mwambe na mineyi na ngambo na ye.

Mbanda na ye ya yambo, Jonas Mukamba, azui kaka mingongo libwa. Candidat ya Union Sacrée de la Nation, Sama Lukonde amonisaki noki noki na moyi ntina ya candidature na ye o boso ya bakokani ba ye ba sénateurs.

Alakaki kobongola Senat mpo ekoma suku ya bakeli mibeko ya makasi, ya mikolo miye to modern mpe esika bato banso bakoki kokota, nionso wana na lolenge mokonzi Félix Tshisekedi azali komona makambo.

“Mosala na nga na bokambi ya suku na biso ya likolo ya bakeli mibeko evandi na mwango ya kokomisa Sénat makasi.

Amonisi ntina ya boyokani na kati ya bakeli mibeko, basali ya Sénat, mpe misala minso ya ekolo Congo democratiki, na ntina ya kotikala kaka na mwango to vision ya mokonzi ya ekolo”.

Azongeli lisusu ntina ya suku ya likolo ya bakeli mibeko kosala mosala na yango malamu lokola suku ya bato ya bwanya, kolandela bokonzi bonso, mpe kofongola miso na boponi ngambo yokote na mbulamatadi, na misala ya bosungi democratie, mpe misala to ba entreprises publiques.

Forum

XS
SM
MD
LG