Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Barack na Michel Obama balobi Kamala Harris nde abongi mpo na kozala mokonzi


Mokonzi ya kala ya Ekolo Amerika Barack Obama (D) na molongani wa ye Michel Obama bayambani liboso lya bato na Convention ya ba démocrates, Chicago, Illinois, 20 sanza ya mwambe 2024. (AP Photo/Charles Rex Arbogast)
Mokonzi ya kala ya Ekolo Amerika Barack Obama (D) na molongani wa ye Michel Obama bayambani liboso lya bato na Convention ya ba démocrates, Chicago, Illinois, 20 sanza ya mwambe 2024. (AP Photo/Charles Rex Arbogast)

Barack Obama, mokonzi ya kala ya Ekolo Amerika alobaki na Convention ya ba démocrates na mpokwa ya mokolo mwa mosala ete apesi maboko na vice-présidente Kama Harris mpo ye nde abongi na kokamba mboka malamu nsima na maponami ma sanza ya zomi na moko ya mobu moye.

Azwaki maloba na likita liye lizali kosalama na Chicago, Illinois, mpo na kopesa mpifo na vice-présidente Kamala Harris mpo ete alakisa elongi ya lingomba liye lya politiki na maponami ma makonzi makoya.

Barack Obama azwki maloba nsima na mwasi wa ye Michel Obama mpe akebisaki bana ba ekolo na ye ete soki républicain Donald Trump oyo akitanaki na ye na bokonzi alongi maponami, mboka ekokweya ma nse makasi.

Atalisaki botawu bwa Donald Trump mpo na maloba ma mabe, kozanga soni mpe koluka kaka bolamu ya bato baike kasi ya mboka te. Mpo na Barack Obama Kamala Harris nde abongi mpo na kosangisa bana ekolo mpe komema bango liboso na bolamu ya banso.

Barack Obama apesaki mpe lokumu na Joe Biden, mokonzi ya démocrate oyo azali sika na ebonga mpo na bolingo bwa na ekolo mpe makasi asalaka mpo ete democratie etikala na mboka mpe na mokili.

Yambo na ye, molongani na ye, Michel Obama mpe akumisaki Kamala Harris mpe atatolaki ete, lokola ye,

Kamala Harris ayebi mpasi ya bana mboka mpe ayebi kopesa bana mboka banso libaku ya kowuta na nse mpe komata kino ata na ebonga ya mokonzi ya mboka lokola ba mama na bango balakisaki bango.

Doug Emhoff, molongani ya Kalama Harris atatolaki, na ngambo na ye, ete mwasi wa ye ayebi kozwa mokumba ya mpasi ya basusu.

Bato basusu lokola mokambi ya ngambo ya baye baleki mingi na Senat Chuck Schumer mpe Bernie Sanders senateur ya Vermont oyo awelela mpe mbala mingi ebonga ya kolakisa elongi ya ba democrates na bokonzi ya ekolo bazwaki mpe maloba.

Na libanda, bato baike batelemelaki bitumba bizala kosalama bisika lokola Israel, Ekolo Congo Democratique mpe Ukraine.

Baike bakangamaki na pulusu. Lelo nde, mokonzi ya kala Bill Clinton nde akozwa maloba.

Forum

XS
SM
MD
LG