Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mingongo mizali kobakisama sima ya bomeki kokima mpe mobulu misalemaki na boloko ya monene ya Makala na Kinshasa


Me Bondo, mosamebli liboso ya bazuzi na boloko ya makala, 30 avril 2013.
Me Bondo, mosamebli liboso ya bazuzi na boloko ya makala, 30 avril 2013.

Mingongo mizali kobakisama sima ya bomeki kokima mpe mobulu misalemaki na boloko ya monene ya Makala na Kinshasa miye mimemaki liwa na bato koleka nkama.

Basali ebele ya molongo basakoli mawa mpe komitungisa na bangompe basengi été bilukiluki ya kati-kati bosalema na ntina ya komonisa na polele maye masalaki été likama lina lisalema.

Moyi ambassadeur ya ekolo France na RDC asakolaki mawa na ye mpo na makambo yango.

Roxane de Bilderling, ambassadrice ya ekolo Belgique na RDC atindi mpe ba condoleances na mabota ya baye bakufeli. Molobeli ya Commission européenne, Nabila Massrali, asengi bolukiluki ya mbango mbango.

Lingomba ya Union Européenne mpe na ba Ambassades ya bikolo biye bizali na kati mpe biye bisalaka misala na RDC bamonisi mpe mawa na bango mpo na makama yango.

Conférence Episcopale Nationale du Cong (Cenco) etelemelaki makama ya boloko ya Makala na Kinshasa.

B’episcopo bapameli kobebisa bomoyi ya bato na ndenge ya mpambampamba na ekolo Congo democratiki mpe basengi été bosembo bosalema na ndenge elongobani mpo na baye bazui likama.

Ba défenseurs des droits de l’homme to baye babundaka mpo na ntomo ya bomoto basengi été bolukiluki ya solo solo bosalema na ntina ya maye malekaki na boloko ya Makala na Kinshasa, na butu ya mokolo ya yambo mpe ya mokolo ya mibale ya sanza eye.

Ndenge moko mpe na lisanga ya bayi politiki bapameli bobomi mpe kosangisa nzoto na ndenge ya makasi sima ya bokimi, engebene na bango, ya bakangemi ebele na boloko ya Makala na bokeseni ya motango ya bato bakufi.

Forum

XS
SM
MD
LG