Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko azuami na bokono ya grippe aviaire ewutaka na ndeke na mboka Missouri na USA


Des experts examinant les données sur la grippe aviaire au Nigeria
Des experts examinant les données sur la grippe aviaire au Nigeria

Bakonzi ya mambi ma bokolongono ya ekolo Amerika basakolaki ete moto moto moko azuamaki na bokono ya grippe aviaire to bokono bowutaka na ndeke na Missouri.

Moto yango azalaki lisanga ata na niama yoko te, mbala ya liboso likambo ya boye esalema na ekolo Amerika.

Kino sika, grippe aviaire eye ezali kobeta bato na ekolo Amerika ezali kowuta na misala ya bilanga.

„Bokono yango epanzani naino te na kati ya bato bazali na zinga zinga na moto azali na bokono“, elobaki ba Centre federaux ya misala ya bobateli mpe kobundisa bokono nionso to CDC, na bomonisi ete makoki ya bopanzani ya bokono eye na bato ebele ezali penza mukie.

Forum

XS
SM
MD
LG