Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

" Débat yambo na maponami" : Kamala Harris azali komilengela na "débat" na Pennsylvanie mpe Trump alaki kopesa ebonga na Elon Musk


Démocrate Vice-présidente Kamala Harris na foto ya mopanzi ya mwasi, 3 sanza ya mwambe 2024, na républicain mokonzi ya kala Donald Trump na eye ya mopanzi ya mobali, na Raleigh, Caroline ya Nord, 26 sanza ya misato 2024. 
Démocrate Vice-présidente Kamala Harris na foto ya mopanzi ya mwasi, 3 sanza ya mwambe 2024, na républicain mokonzi ya kala Donald Trump na eye ya mopanzi ya mobali, na Raleigh, Caroline ya Nord, 26 sanza ya misato 2024. 

Kamala Harris, Démocrate mpe vice-présidente ya ekolo Amerika na républicain mokonzi ya kala Donald Trump bazali komilengela na bondogwani ya yambo na etando eke liboso lya maponami ma mokonzi ya mboka , bondongwami bwango bosengeli kosalama o'mokolo mwa mosala moko, mokolo mwa libwa ya sanza ya libwa 2024, na Philadeplie, na état ya Pennsylvanie.

Kamala Harris asi akomaki na Pennsylvanie wuta mokolo mwa mosala misato ya mposo eye epayi azali komilengela na bondongwami bwango.

Na ngambo na ye, Donald Trump azalaki o'mokolo mwa mosala minei na New York na likita na bayi mombongo epayi asakolaki ete akopesa ebonga ya kosala mbongwana ya bozindo mpenza na Elon Musk na maye matali nkita ya ekolo soki alongi maponami.

Vice-président démocrate Kamala Harris alobi asi abongami.

Donald Trump aynoli mpe na bapanzi nsango ete amilengela "bomoi bwa mobimba" mpo na bondongwani boye.

Nkita ya ekolo ekolo nde ekozala likambo linene na bondongwani yango kasi mama na makambo masusu lokola bonsomi ya basi ya kolongola zemi, bonsomi ya bozwama na manduki mpe misusu ekozala mpe na masolo ma bango.

Batali bapesami nzela te na esika ya bondongwami yango liboso lya bapanzi nsango ya etando eke ya ABC.

Forum

XS
SM
MD
LG