Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Joe Biden azwi maloba mbala ya suka bo’ mokonzi ya ekolo Amerika na Likita linene lya ONU


US President Joe Biden speaks during the 79th Session of the United Nations General Assembly at the United Nations headquarters in New York City on September 24, 2024. (Photo by TIMOTHY A. CLARY / AFP)
US President Joe Biden speaks during the 79th Session of the United Nations General Assembly at the United Nations headquarters in New York City on September 24, 2024. (Photo by TIMOTHY A. CLARY / AFP)

Joe Biden azwi maloba mbala suka bo’ mokonzi ya ekolo Amerika na Likita linene lya ONU yambo ete atika ebonga na ye na maponami ma mokonzi ya ekolo ya sanza ya zomi na moko ekoya na mboka na ye.

Na lisukulu asalaki liboso lya bakonzi ba bikolo mpe mbulamatari misusu na bokutani boye bozali kosalama na ndako ya mosala ya Nations unies na New York wuta mikolo mibale,

Joe Biden abengaki bayi molongo na bomoko mpo na kolonga mindenge minso miye mizali koyia liboso lya bozali bwa bato. Asakoli ete Ekolo Amerika ezali kopesa maboko na bobakisi bwa bikolo kati na Conseil de securite mpo bobateli ya makambo lokola democratie bokoba.

Nzokande, bayi Afrika basenga mabonga mabale lokola mpe bayi Amerika ya Sud mpo na kovanda na likita ya bokengi ya ONU.

Na lisikulu lya ye, Joe Biende atelemeli bitumba mpe ndenge mampinga ma bikolo biike mazali kokota mpe koluka kobotola mboka nzike.

Alaki ete elongo na masanga lokola OTAN, Ekolo Amerika ekotika soki moke te kopesa maboko na Ukraine mpo na elonga ya democratie.

Alakisi ete mokonzi ya Russie Vladimiri Putir alongi te na bitumba azali kosala na Russie mpe alongi te kokabola OTAN.

Joe Biden asengi suka ya bitumba biye.

Mokonzi ya Amerika asengi mpe na ngambo inso na bitumba na Israel, Hamas to bakonzi ba Israel kondima kotiya manzaka na boyokani bayi Ekolo Amerika na bikolo misusu balengeli mpo na kosukisa bitumba biye bimemi bomoi bwa bato mingi na Gaza.

Apameli mobulu ya Hezbollah mpe alendisi bayi etuka ya Moyen Orient kopanza bitumba biye te.

Mokonzi ya Amerika akundoli makasi asali mpo kosukisa bitumba bisika mingi lokola mokona mwa ye mwa kolongola mampinga ma Amerika na Afghnistan nsim na mibu ntuku mibale ya bitumba.

Forum

XS
SM
MD
LG