Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden alaki kopesa maboko na bobakisi bibonga na Conseil ya sécurité ya ONU


Mokonzi ya ekolo Amerika Joe Biden azali kopesa lisikulu na likita linene lya ONU ya mbala 79 na New York, 24 sanza ya libwa 24 2024. (AP Photo/Seth Wenig)
Mokonzi ya ekolo Amerika Joe Biden azali kopesa lisikulu na likita linene lya ONU ya mbala 79 na New York, 24 sanza ya libwa 24 2024. (AP Photo/Seth Wenig)

Joe Biden azwi maloba mbala ya suka bo’ mokonzi ya ekolo Amerika na Likita linene lya ONU yambo ete atika ebonga na ye na maponami ma mokonzi ya ekolo ya sanza ya zomi na moko ekoya na mboka na ye.

Na lisukulu asalaki liboso lya bakonzi ba bikolo mpe mbulamatari misusu na bokutani boye bozali kosalama na ndako ya mosala ya Nations unies na New York wuta mikolo mibale, Joe Biden abengaki bayi molongo na bomoko mpo na kolonga mindenge minso miye mizali koya liboso lya bozali bwa bato.

Asakoli ete Ekolo Amerika ezali kopesa maboko na bobakisi bwa bikolo kati na Conseil de securite mpo bobateli ya makambo lokola democratie bokoba.

Nzokande, bayi Afrika basenga mabonga mabale lokola mpe bayi Amerika ya Sud mpo na kovanda na likita ya bokengi ya ONU.

Na lisikulu lya ye, Joe Biende atelemeli bitumba mpe ndenge mampinga ma bikolo biike mazali kokota mpe koluka kobotola mboka nzike.

Alaki ete elongo na masanga lokola OTAN, Ekolo Amerika ekotika soki moke te kopesa maboko na Ukraine mpo na elonga ya democratie. Alakisi ete mokonzi ya Russie Vladimiri Putin alongi te na bitumba azali kosala na Russie mpe alongi te kokabola OTAN.

Joe Biden asengi suka ya bitumba biyena lobango na Russie.

Mokonzi ya Amerika asengi mpe na ngambo inso na bitumba na Israel, Hamas to bakonzi ba Israel kondima kotiya manzaka na boyokani bayi Ekolo Amerika na bikolo misusu balengeli mpo na kosukisa bitumba biye bimemi bomoi bwa bato mingi na Gaza.

Apameli mobulu ya Hezbollah mpe alendisi bayi etuka ya Moyen Orient kotika te ete bitumba biye bipalangisama.

Mokonzi ya Amerika akundoli makasi asali mpo na kosukisa bitumba bisika mingi lokola mokona mwa ye mwa kolongola mampinga ma Amerika na Afghnistan nsima na mibu ntuku mibale ya bitumba.

Mpo na etali bitumba na Sudan, Joe Biden alendisi bana ba ekolo eye kotika kopanza mboka na bango.

Mokonzi ya ekolo Amerika akundoli mpe makasi mboka na ye ezali kosala mpo na bokolongono na mokili lokola mokano mwa kobakisa misolo kino koleka dollars millions mitano na ntina ya kolonga mpox na kopesaka mangwele.

Joe Biden akundoli ete Amerika ezalaki na molongo mwa yambo, na bokambi bwa ye, ya kopesa makoki mingi koleka na molongo mpe epesaki nzela na kolonga Covid-19.

Mokonzi ya Amerika asengi bongo na bayi molongo koyeba kokamba bikela bya mbongwana lokola intelligence artificielle mpo na bolamu bwa bato.

Alaki ete ekolo na ye ekokoba kopesa misolo koleka mpo na kobundisa mbongwana ya climat.

Joe Biden abeti mpe sete na ndakisa bwa ye ya koyeba kotika bokonzi soki na bolingo bwa ekolo bosengo ndenge ye moko aboyi kokoba kowelela bokonzi mpo bilenge bamata.

Forum

XS
SM
MD
LG