Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 na Rwanda babetaki ba bombes na bisika bakima bitumba bazali na engumba Goma


United Nations High Commissioner for Human Rights Volker Turk delivers a speech at the opening of the 57th session of the Human Rights Council in Geneva, on September 9, 2024.
United Nations High Commissioner for Human Rights Volker Turk delivers a speech at the opening of the 57th session of the Human Rights Council in Geneva, on September 9, 2024.

M23 na Rwanda babetaki ba bombes na kotalaka te na bisika bakima bitumba bazali nzinga nzinga na engumba Goma, elobi lelo Human Rights Watch. Mabongisi mya ma molongo ma Makoki ma bomoto maye mapameli mpe mampinga Ekolo Congo Démocratique na basungi ba yango ba Wazalendo na mbeba nzike bisika bakima butmba bazali.

Human Rights Watch elobi na liyebisi mabimisi lelo ete wuta libandeli ya mobu 2024, mampina ma Rwanda RDF na batomboki ba M23 bazali kopetaka ba bombes nakotala te na bisika bakima bitumba bazali mpe na bitando bobayi bavandi bazalaka mingi pene na Goma.

Human Rights Watch elobi M23 na RDF babetaki bitundeli ya makasi na bitumba mbala mitano na bisika biye. Masasi ma artillerie mpe ba roquettes makwelaki ba civilis.

Kolanda motango mopesamaki na bakonzi bato ntuku misato na mitano bakufaki o’mokolo mwa misato ya sanza ya miatno na camp ya Mugna.

Ekolo Amerika epamelakimampinga ma Rwanda na M23 kopeta masasi mango, Kigalu ebangaki bofundi boye ya bolole mpe lokuta.

Human Rights Watch elobi ete FARDC mampinga ma Ekolo Congo Démocratique na basungi ba yango ba Wazalendo babetaki mpe masasi kati ya camps ya bakima bitumba epayi babomaki mpe bazkokisaki ba civili.

Ngambo mibale efundami Koyeba nzoto ya basi to ya bato na makasi na bisika bakima bitumba bazali mpe kopekisabopesami bwa lisungi mpe kosala mbeba esusu.

Koleka mwasi moko kati na zomi asi azwamaki na makasi kati na camps ya bakima bitumba na Goma, kolanda bolukiluki Medecins sans frontiers ebimisaki na sanza ya mwambe eleki.

Lobi loleki, nalisikulu na Likita linenelya ONU, President Felix Tshisekedi asengaki etumbu mpo na Rwanda mpe bolongwi na kozela te ya mampinga ma Rwanda na mabele ma RDC.

Forum

XS
SM
MD
LG