Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maponami USA 2024: Mokonzi ya transition ya Haïti akebisi ete moto ya campagne momema na xénophobie mpe racisme


Mokonzi ya bokonzi ya transition na Haïti Edgar Leblanc Fils azali kopesa lisikuli na Likita linene lya ONU ya mbala 79, New York, 26 sanza ya libwa 2024.
Mokonzi ya bokonzi ya transition na Haïti Edgar Leblanc Fils azali kopesa lisikuli na Likita linene lya ONU ya mbala 79, New York, 26 sanza ya libwa 2024.

Mokonzi ya bokonzi ya transition na Haïti, Edgar Leblanc Fils akebisi ete moto moye mozali kopela na mitema ya bayi Ekolo Amerika ntango ya bobeti ntangwa na maponami mosengeli te komema na boyini ya bapaya mpe bokwani na kolanga loposo.

Etikali sika mikolo ntuku misato na libwa kino tokoma na maponami ma mokonzi ya ekolo.

Edgar Leblanc Fils alobaki yango na lisikulu lya ye na Likita linene lya ONU.

Atangaki nkombo ya moto te kasi mikolo mileki mokonzi ya kala ya Amerika republicain Donald Trump alobaki na bondongwani na vice-presidente ya democrate Kalama Harris oyo azali na ebonga, ete baye bazali kokota

Ezalaki na bondangwani ba baweleli babale ya maponami na bondwani bazalaki na yango sanza eye na etando eke o'mokolo mwa zomi y sanza ya zomi ya 2024 na Philadelhie, na Pennsylvanie.

Amerika na mayuya mpe mingi bayi Haiti bazali kolyaka ba mbwa mpe nyawu na mboka Spingrfielg na Ohio mpe bazali kobebisa bomoi bwa bato kuna.

Forum

XS
SM
MD
LG