Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Chancel Mbemba azongisami na Olympique de Marseille


Défenseur to mokangi ya ba Léopards ya RDC #99 Chancel Mbemba abeti ndembo na match ya L1 ya club na ye Olypique de Marseille na FC Lorient, stade Vélodrome, Marseille, France, 12 sanza ya mitano 2024.(Photo by Nicolas TUCAT / AFP)
Défenseur to mokangi ya ba Léopards ya RDC #99 Chancel Mbemba abeti ndembo na match ya L1 ya club na ye Olypique de Marseille na FC Lorient, stade Vélodrome, Marseille, France, 12 sanza ya mitano 2024.(Photo by Nicolas TUCAT / AFP)

Capitaine ya ekipi ya Ekolo Congo Démocratique, Chancel Mbemba azongeli bolengelami kati na club na ye Olympique de Marseille nsima na matata azalaki na yango na bakambi ba yango.

Na mibu 30, Chancel Mbemba amonanaki mokolo mwa mosala minei na ba entraînements ya OM.

OM ezongisi moyi RDC oyo na molongo ya basani ba yango nsima na LFP (ligue de football professionnel) kosenga na club phonéen kokitisa etumbu eye epesaki mobeti ndembo oyo.

Bazalaki na matata maye mabandaki ntango coach to mokambi ya OM alongaki Chancel Mbemba kati na basani ya groupe profesionnel mpe atindaki na ekipi ya mibale.

Chancel aboyaki mbala mibale kokende kobeta na ekipi B mpe na division ya nse mpe kosala entraînements na yango.

Capitaine ya ba Léopards ya RDC apesamaki bongo etumbu ya yambo mpo na yango.

Nsima na yango Chancel Mbemba apesamaki lisusu etumbu mpo aboyaki kokende kotalisama na minganga ya OM baye bazalaki koloba ete azalaki na nkwokoso na ebolongo na ye mpe esengelaki ete apesama lipaso, likambo mosani ya RDC aboyaki kondima.

Chancel Mbemba apesamaki etumbu mpe apekisamaki lifuta lya mwa ntango.

Sika azongeli komilengele na OM mbala ya yambo wuta saison eye ebandaki, nsima na kolakisa elongi elamu na ba Léopards epayi atiaki mongete moye mopesamaki na mosani ya ba Taïfa Stars ya Tanzanie oyo amekaki kobimisa ndembo ebetamaki na Chancel Mbemba na match aller na Kinshasa, o’mokolo mwa mitano ya mposo moleki na stade des Martyrs.

« Chancel Mbemba atalisi ete azali mpenza mosani ya ndembo ya malamu. Azali kobeta te na club na ye kasi azali mpenza ya komilengela mpe ekolo na eye esengeli kotiela ye motema, » etatolaki coach ya ba Léopards Sébastions Desabre nsima na match RDC-Tanzanie.

Forum

XS
SM
MD
LG