Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kinshasa elobi ezali kotala ndenge nini koboya kufa ya bato mingi na Goma


Video ya AFP TV na Goma mokolo mwa 25 2025, motalisibato ba mandoki bazali kotambola na Goma mpe baike bamemi mikumba.
Video ya AFP TV na Goma mokolo mwa 25 2025, motalisibato ba mandoki bazali kotambola na Goma mpe baike bamemi mikumba.

Mbulamatari ya RDC elingi kopekisa kufa bato mingi na Goa, esakoli molobeli wa yango, ntango engumba eye ezali kati na mobulu Makasi nsima na bokoti mpokwa eleki (mokolo mwa Eyenga) ya batomboki ba M23 na basoda ba Rwanda.

“Mbulamata ezali kokoba kosala mpo na kopekisa bosasami mpe mkufa ya bato mingi,” alobi ministre Patrick Muyaya na video etiami na X.

Liyebisi lya ministre molobeli ya mbulatari Muyaya motangamaki mpe na etando eke.

M. Muyaya asengi bavandi ba Goma "kozela malako makopesamela bango, kovanda na ndako mpe koboya kosala mobulu mpe kopunza biloko".

Wuta mokolo mwa eyenga, lingomba lya M23 liye lisungami na mampinga ma Rwanda lizali kosala ete Goma ezwami na maboko ma yango.

Masasi mingi mazali kobeta na Goma, eyebani te nani asimbi yango.

Forum

XS
SM
MD
LG