Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akendaki kokutana na Joao Lourenço na Luanda mpo bitumba na est o mokolo mwa mosala misato


Mokonzi ya Angola Joao Lourenço (G) na mokokani wa ye ya RDC Felix Tshisekedi (D) na libongo lya Lobito, Angola, 4 sanza ya zomi na mibale 2024
Mokonzi ya Angola Joao Lourenço (G) na mokokani wa ye ya RDC Felix Tshisekedi (D) na libongo lya Lobito, Angola, 4 sanza ya zomi na mibale 2024

Félix Tshisekedi mokonzi ya Ekolo Congo Démocratique akendaki na Luanda (Angola) o mokolo mwa mosala misato mpo na kokutana na mokonzi ya ekolo eye na ntina ya bitumba biye bizali kongala na monyele ya RDC.

Asali mobembo yango ntango alobaki ete akozala te na bokuta na Paul Kagame, mokonzi ya Rwanda, na bokutani ya nzela ya singa mokonzi ya Kenya mpe mokambi ya EAC, likita lya bikolo bya Afrika ya est, William Ruto abengisaki o mokolo mwa mosala misato mpe lokola.

“Na nzela ya makasi mazali kosalama na président João Lourenço mpo na bozongi bwa kimya mpe bokengi na est ya Ekolo Congo Démocratique, mokonzi ya ekolo eye ya nzinga nzinga, Félix Tshisekedi Tshilombo akendaki lelo na Luanda na ntina ya ete bamanyola elongo bitapi biye bikolanda na masolo ma Luanda,” elobi liyebisi lya ndako ya misala ya mokonzi ya Angola, kolanda Actualité.cd.

Ndako ya misala ya Félix elobaki ete manaka ma ye mapesaki nzela te na kozala na bokutani William Ruto abengisaki mpe moye mosengelaki kosalama na nzela ya singa.

Na liyebisi abimisaki kaka o mokolo mwa mosala moko, Joâo Lourenço lokola mpe moninga mwa ye mokonzi ya ekolo Afrika ya Ngele Syril Ramaphosa, basengaki bolongwi na kozela te ya mampinga ma Rwanda na batomboki ba M23 na Goma.

Forum

XS
SM
MD
LG