Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres asololaki na nzela ya singa na mokonzi ya Ekolo Congo Démocratique Felix Tshisekedi na ngambo moko mpe, na ngambo esusu, mokonzi ya Rwanda Paul Kagame mpo na bitumba biye bizali kongala na est ya RDC.
Molobeli ya Antonio Guterres, Stephan Dujaric alobi ete ezalaki mingi mpo na bosenga ya bobateli ba civili na Goma mpe nzinga nzinga, eye ebotolami na mampinga ma Rwanda na batomboki ba M23 mazali kosunga.
O mokolo mwa misato, M. Tshisekedi na M. Kagame basengeli kozala na likita na nzela ya nsinga na bokamabi ya mokonzi ya Kenya mpe motambwisi ya EAC, Likita lya Afrika ya est.
Batomboki ba M23 na mampinga ma Rwanda bakotaki na egumba Goma o’mokolo mwa eyenga eleki nsima bitumba makasi.
Na nsima ya nzanga ya mokolo mwa mosala mibale, Conseil ya sécurité ya esengelaki kokutana lisusu mpo kolobela RDC.
Bobendani bozali kino ntango nsango epesami na Goma.
Bato baike bakimi engumba, baike bakeyi na ngambo ya Rwanda, mapitalo matondisami na baye bazoki mpota minene.
Na Kinshasa bato basalaki mobulu mpo na nkanda nsima bokweyisami ya Goma. Batiaki moto na ambassade ya Rwanda, na ekuke ya eye ya France mpe basalaki mobulu na ba ambassades misusu lokola ya Etats-Unis,Belgique Kenya mpe misusu.
Forum