James Kabarebe ministre ya Bobateli ekolo ya kala mpe general ya mampinga ma Rwanda apesami etubu na ekolo Amerika mpo na bitumba Rwanda esali kosala nsima na batomboki ba M23.
Lawrence Kanyuka molobeli ya lingomba lya batomboki M23 apesami ye mpe lokola na Washington.
James Kabarebe oyo azali sika ministre ya integration régionale, afundami kokamba lisungi lya mampinga ma Rwanda na batomboki ba M23 ya RDC est ya ekolo eye, elobi ministere ya mambi ma Misolo ya Ekolo Amerika na liyebisi.
Etumbu yango esakolami na Bureau ya ekolo Amerika etalaka bozwi ya bapaya OFAC.
Washington esi epesa bitumbu misusu na bakambi ba M23. Mokambi ya M23 Bertrand Bisima, mokambi ya basoda ba M23 Charles Sematama na Corneille Nangaa mokambi AC/M23 mpe mokambi ya kala ya Misala mya maponami bapesamaki mpe etumbu na Tresor ya ekolo Amerika o mokolo mwa ntuku mibale na mitano ya sanza ya sambo ya 2024.
“Ekolo Amerika abengi bakambi na Rwanda kosukisa lisungi lya bango na M23,” mpe “kotosa bonsomi na mobimba yam abele ma RDC”, ekomi ministère ya mambi ma Bapaya ya Ekolo Amerika na liyebisi.
James Kabarebe akambaki mampinga ma Rwanda na RDC kati na 1996 mpe 1998 mpe akomi ministre ya Bobateli ekolo (2010-2018) noe akomaki mopesi tolu ya mambi ma Bokengi ya president Paul Kagame.
Etumbu yango ekomema botelemisi ya bozwi mpe ekopesa nkwokso na mbongo ya baye banso bapesami etumbu na kopekisaka mbango bosaleli misolo mya dollars ya Amerika na maye manso makosenga misolo, soki te bakosambisama na misala mya sembo ya Amerika.
Forum