Félix Tshisekedi, mokonzi ya RDC azalaki o mokolo mwa mosala moko na Luanda, engumba mokonzi ya Angola epayi akutanaki na masolo na mokokani wa ye ya Angola João Lourenço oyo awuti kozwa ebonga ya bokambi Union africaine.
Ndako ya mosala mya mokonzi ya Angola elobi ezalaki mobembo mwa ngonga moke mpe masolo mango mazalaki mpo na bitumba biye batomboki ba M23 bazali kosala na lisungi lya Rwanda na est ya RDC.
João Lourenço asakolaki mikolo mileki ete atiki ebonga ya mobondi ya matata RDC-Rwanda lokola akomi mokambi ya Union africaine mpe asengaki ete bakonzi ba bikolo bisusu, moko to mibale, bapesama mosala mwa kobonda matata mwango.
Ministre ya mambi ma Bapaya ya Angola Tete Antonio ayebisaki bapanzi nsango ete bokutani ya mokolo mwa mosala moko kati na bakonzi babale bozalaki mpo na kotala ndenge makambo mazali kokende na etuka eye ya Afrika mpe kotala mikano misengeli kozwama nsima na likita lya Conseil ya kimya mpe bokengi ya Union Africaine na Addis Abeba ya mokolo mwa mosala mitano moleki epayi João Lourenço azwaki ebonga ya kokamba Union africaine.
M23 ezali kokoba kozwa bisika na est ya RDC.
Nsima na Goma mpe Bukavu, euti kozwa Kmanyola na Sud-Kivu.
Forum