Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba magistrats ya likolo ya sika balapi ndayi liboso ya Tshisekedi


Ba magistrats ya likolo na président Félix Tshisekedi (C) nsima na kolapandayi mpo kobanda mosala na bango na Palais de la nation, Kinshasa, 19 février 2020. (VOA/Eddy Isango)
Ba magistrats ya likolo na président Félix Tshisekedi (C) nsima na kolapandayi mpo kobanda mosala na bango na Palais de la nation, Kinshasa, 19 février 2020. (VOA/Eddy Isango)

Ba magistrats ya likolo ya RDC baye batiyami sika balapi ndayi mecredi 18 février 2020 liboso ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Milulu myango masalami na Palais de la nation, kolanda mikano président Félix Tshisekedi azwaki vendredi le 7 février 2020.

Na mikano myango, président Tshisekedi atiaki Jean-Paul Mukolo na ebonga ya procureur général près la Cour constitutionnelle.

Dominique Thambwe Wa Kaniki atiamaki lokola procureur général près la Cour de cassation.

Octave Tela Ziele nde procureur général près ya Conseil d’Etat; général Joseph Mutombo Katalay, premier président ya haute cour militaire mpe lieutenant général Munkutu nde auditeur général près ya cour militaire, kolanda mokano yango.

Magistrat moko ya Cour ya cassation atiamaki na 2018 mpe alabi ndayi. Asalaki yango te mpo azalaki na bokono.

Nzokande procureur général ya Cour constitutionnelle akolapaki ndayi na bozongi na misala ya bosembo lokola mokano esengi.

XS
SM
MD
LG