Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi atie bakonzi ya sika bayike na misala ya bosembo


Bazuzi ya Cour constitutionnelle na Kinshasa, 19 juanvier 2019.
Bazuzi ya Cour constitutionnelle na Kinshasa, 19 juanvier 2019.

Président Félix Tshisekedi atie bakonzi ya sika bayike na misala ya bosembo.

Na mokano abimisi vendredi 7 février 2020, président Tshisekedi atie Jean-Paul Mukolo na ebonga ya procureur général près la Cour constitutionnelle.

Dominique Thambwe Wa Kaniki atiami lokola procureur général près la Cour de cassation.

Octave Tela Ziele nde procureur général près ya Conseil d’Etat; général Joseph Mutombo Katalay, premier président ya haute cour militaire mpe lieutenant général Munkutu nde auditeur général près ya cour militaire, kolanda mokano yango.

Ezali mokano ya yambo M. Tshisekedi azwi mpo etali misala ya bosembo.

XS
SM
MD
LG