Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko bakolekisa na boponami mokano ya kokweyisa Trump


Vice-président Mike Pence (C) pene na démocrate Nancy Pelosi, mokambi ya ndako ya bokeli mibeko, na Congrès, na Capitole, Washington, DC, 7 janvier 2021.
Vice-président Mike Pence (C) pene na démocrate Nancy Pelosi, mokambi ya ndako ya bokeli mibeko, na Congrès, na Capitole, Washington, DC, 7 janvier 2021.

Bakeli mibeko bakopona mardi mokano ya kosenga na Vice-Président Mike Pence mpe bayi mbulamatari kosalela makoki na bango mpo na kosakola ete président Donald Trump akoki te ebonga, ata etikali mikolo mwambe mpo na bokonzi.

Président Trump esengeli atika esika na President Elect to mokonzi abimi na maponami Joe Biden le 20 janvier na milulu mya bolapi ndayi.

"Impeachment:, to bosenga ya kolongola M. Trump bowuti na ba démocrates baye baleki mingi sika na suku mibale ya Parlement ya Etats-Unis.


Soki mokano mwango moleki vice-president Pence akozala na mokolo moko mpo na koyanola.

Ba démocrates mingi mingi lokola mpe ba républicains baike bazali kopamela eyoma balandi ba Donald Trump basalaki na Capitole o’mwa misato moleki mpo na komeka kopekisa bondimami bwa bilembo bya maponami.

Bato pene na mitano bakufi nsima na eyoma yango. Nzokande FBI mpe bayi bokengi bakebisi ete balandi ba Trump bakoki kosala eyoma esusu na minduki, mbala eye na ba états mingi, o’mokolo mwa bolapi ndayi ya Joe Biden le 20 janvier na milulu na Washington DC. Donald Trump alobaki akozala te.

XS
SM
MD
LG