Na ba sanza miye mileki, basi ya mikolo to ba mama nkoko koleka ba zomi basi babomami mpe ba nyokwami na kofundama kozala bandoki na mboka nzike na province ya Sud-Kivu, na Est ya ekolo Congo démocratique (RDC).
Wuto ebandela ya sanza ya libwa, bakonzi ya etuka baobi ete basi mwambe basili kobomama na kotumbama to na mabanga na territoires ya Kalehe, Walungu na Fizi nsima na kofundama nanganga nkisi ete bazali bandoki.
Nelly Adidja oyo azali moko ya Association des femmes des médias (AFEM) du Sud-Kivu alobi ete wuto sanza ya motoba kino lelo, basili bazwi bato koleka 324 baye basili bafundami na kozala bandoki.
Mme Adija abakisi ete territoire ya Kahele yango moko esi ezwi bofundami ya bato 144. Kati na bango ba mama koko batano basili batumbami, mpe mineyi misusu bamemi bango na bisika biyebani te.
Pr. Bosco Muchukiwa, oyo azali sociologue mpe directeur général de ya Institut supérieur de développement rural (ISDR) ya Bukavu.
Molakisi oyo asakoli ete, bobomami boye bobakisami mingi mpo bayi pulusu mpe misala mya sembo bazali kosala mosala na bango te.
Pr. Muchukiwa abakisi ete, makambo maye makomi lisusu makasi mpo na likambo lya kokende kotalisa na ndako ya ba nganga nkisi likomi lisusu makasi mikolo miye. "Bazali kokosa bato ete bazali na nguya ya komona bandoki," elobi Pr. Muchukiwa.
Muhindo Cikwanine, juriste oyo azali expert na droit parlementaire alobi ete, esengeli mbulamatari apekisa ndako ya banganga baye batalisaka.
Na mobu 2014, bakeli mibeko ya province ya Sud-Kivu bazwaki mokano ya kopekisa justice Populaire to bosambisami ya bato na balabala, kasi kino lelo, mokano moye mosalemi naino te, mpamba te, bato bayebi yango mingi te.
Mibu mibale mileki, banganga nkisi zomi na moko bakangamaki na territoire ya Kavumu na Bukavu, mpe basalaki sanza motoba na boloko. Kasi bato bazali koboma ba mama koko baye bazali kosala bango eloko moko te, elobi Thadée Miderho.