Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bobomi bozali kokoba na monyele ya RDC ata état de siège etiama, epameli HRW


Basoda ba mampinga ma RDC na parc ya Virunga, na Mutwanga, Nord-Kivu, 24 mars 2021
Basoda ba mampinga ma RDC na parc ya Virunga, na Mutwanga, Nord-Kivu, 24 mars 2021

ONG Human Rights Watch epameli bokobi bwa bobomi ba civili na bituka bya Ituri mpe Nord-Kivu biye bitiamia na état de siège wuto sanza ya mitano.

"Koleka ba civili 739 bakufi na koboma na bituka ya Ituri mpe Nord-Kivu na est ya RDC wuto état de siège ebanda na sanza ya mitano, yango elakisi bosenga makasi ya kotia mayele mingi na bobateli ba civili mpe kokengele makasi basoda," ekomi mokambi molandi ya HRW mpo na Afrika, Ida Sawyer.

HRW elobi ete bobomi bosalamaki le 2 août bolakisi bokobi ya bozangi bokengi mpe bozangi ya eyano esengeli na mampinga.

Ba ADF baye bakota kati na lingomba Etat islamique basakolaki mokolo yango ete babomaki ba civili 16, kati na bango basi babale, na mboka Idohu, na Ituri.

Nzokande basoda ba mampinga ma RDC (FARDC) bazalaki na camp moko pene pene.

HWR lokola babundi basusu ba makoki ba bomoto bapameli ndenge ba FARDC babatelaki ba civili te.

Etat de siège etiamaki mpo na koluka kosukisa mangomba ya basimba minduki mpe kozongisa kimya na monyele.

Esengelaki kosala sanza moko mpe kondela mbala moko na mikolo15.

Kasi état de siège esi ebakisami mikolo mbala sambo mpe bokengi bozongi te na est ya RDC.

XS
SM
MD
LG