Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Conseil d'Etat ekoti kinzonzi na bosambisi ya Kabund na Mabunda mpo na ebonga ya 1er v-p ya Ass. Nat.


Jean-Marc Kabung (G), 1er vice-président ya Assemblée nationale na mokambi ya Assemblée nationale Mabund na likita na Palais du peuple, Kinshasa, 16 aout 2019. (Twitter/Assemblée nationale RDC)
Jean-Marc Kabung (G), 1er vice-président ya Assemblée nationale na mokambi ya Assemblée nationale Mabund na likita na Palais du peuple, Kinshasa, 16 aout 2019. (Twitter/Assemblée nationale RDC)

Bazuzi ya Conseil d'Etat bakoti kinzonzi na bosambisami bwa Jean-Marc Kabund, mokambi ya UDPS oyo akweyisami na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée, na Jeanine Mabunda, motambwisi ya suku eye ya nse ya Parlement.

Ekateli ya Conseil d'Etat ekopesama na 48 heures.

Bosambisami bwa Jean-Marc Kabund na Jeanine Mabunda, mokambi ya Assemblée nationale mobandaki lelo mercredi na Conseil d’Etat na Kinshasa.

Basambeli ya Jeanine Mabunda basengaki na bazuzi mwa ntango mpo kotanga mikanda.

Jean-Marc Kabund, président intérimaire ya UDPS afundaki Jeanine Mabunda mpo na bolongalami na ye na pétition ya Jean-Jacques Mamba ya MLC mpe mpo na linaka lya maponami ma moto mosusu na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.

Bosambisami bwango bobandi ntango comité ya maponami esi endimaki nkombo ya Patricia Nseya UDPS epesaki lundi mpo na maponami makosalama le 12 juin.

M. Kabund azali kosenga maponami mango matelamisama nanu.

XS
SM
MD
LG