Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Mukwege apameli Banyamulenge na koboma bato mingi na Kipupu na Sud-Kivu


Denis Mukwege, Prix Nobel ya Kimya ya 2018 na lopitalo na ye ya Panzi, Bukavu, 5 octobre 2018.
Denis Mukwege, Prix Nobel ya Kimya ya 2018 na lopitalo na ye ya Panzi, Bukavu, 5 octobre 2018.

Prix Nobel ya Kimya ya 2018, Dr. Mukwege apameli Banyamulenge na kokoba koboma bato na RDC.

"Kaka bato moko wana nde babomaka na RDC. Bobomi bato na Kipupu ezali kaka kolanda bobomami basalaka na RDC wuto 1996," elobi Dr. Mukwege.

Bato mingi bakufaki na bokoti na Banyamulenge na Kipupu, na territoire ya Fizi, pene na lac (etima) ya Tanganyika, o’mokolo mwa le 16 juillet.

KST (Kivu Security Tracker, lingomba ya bato basenzelaka mpo na bokengi) elobi bato 18 bakufaki. Ba députés bayebisi ete bato 220 nde bakufaki.

MONUSCO ezali kosala bolukiluki.

Bango banso balobi ete Banyamluenge nde babomaki bayi kabila esusu.

"Tozali kosolola te nini esali ete ezali MONUSCO to mbulamatari bakanga minoko?" emitumi lingomba Filimbi.

XS
SM
MD
LG