Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Film "Ndzobi" ya cinéaste brazzavillois Mike Yombi eponami na Fespaco


Photo elakisi mbano ya Yennega na milulu ya bonakangami ya 25e festival panafricain de film et de télévision (Fespaco), na Palais des sports ya Ougadougou, Burkina Faso, 2 mars 2019.
Photo elakisi mbano ya Yennega na milulu ya bonakangami ya 25e festival panafricain de film et de télévision (Fespaco), na Palais des sports ya Ougadougou, Burkina Faso, 2 mars 2019.

Film ebengami “Ndzobi” ya cinéaste brazzavillois Mike Yombi eponami na Fespaco (Festival panafricain du cinéma et de la télévision de Ouagadougou) eye ekosalama wuto le 16 kino 23 octobre 2021 na Bukinafaso​. “Ndzobi” ezali film na  ya mitano M. Yombi asali, kasi ya liboso ya kotekama. 

“Ndzobi” ezali na molayi ya 1h15. Elobeli lisolo lya mibeko ya elimo ya bomoyi na mboka.

Lisolo lyango litalo ebombano to mystère ya “Ndzobi” mpe lilobeli Okouango, mwana mobali moko oyo atikaki mboka na ye ya mbotama “Akoua”, nsima ya initiation na ye, mpo akende kobandela bomoyina ye ya sika esika mosusu.

Ntango ya initiation na ye na “Akoua”, Okouango ayaki komona makambo mingi ya sika ya koyekola, maye ayebaki te mpe akokaki kondima te.

Yango wana atikaki “Akoua”, mboka na ye ya mbotama, mpo akende na Kelle, epayi wapi azwaki ekateli ya kobandela bomoyi na ye.

Na Kelle, Okouango ayei kolinga Wale-Okassi, mwana ya mokonzi ya mboka. Kasi, likambo ya mawa, likolo ya bolingo oyo, ayaki kokutana na mikakatano mingi ndenge na ndenge na Kelle koleka kutu ya mboka ne ya Akoua.

Mpo na kobala mwana ya mokonzi ya mboko, basengaki ye akota “Ndzobi”. Okouango, oyo okokaki lisusu kondima mpe mibeko/mimeseno ya Kelle te, aboyaki mpe atikaki bolingo na ye.

Mike Yombi abimisi ye moko mbongo mpo na kosala film “Ndzobi”. Liboso ya kokende na Ouagadougou, alakisi film yango na salle ya conférence ya mémorial Pierre-Savorgnan-de-Brazza, le 9 octobre eleki.

Mike Yombi na limpinga na ye bazali kotika engumba Brazzaville o'mokolo mwa 14 octobre mpo na kokende na Burkina Faso epayi wapi bakolekisa mikolo sambo mpo na festival ya bilili ya Afrika ebengami Fespaco.

Mike Yombi asalaki mpe ba films lokola “Mboka”, “Sacrilège”, “Ngoue”, “Mbako” mpe “Ndzobi”. Film na ye yasika ekozala “Mon rêve, le destin exceptionnel d’un enfant de brousse”.

XS
SM
MD
LG