Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Gentiny Ngobila aboyi botamboli ya Lamuka le 30 juin


Gentiny Ngobila, mokambi ya engumba ya Kinshasa, 17 avril 2019. (Facebook/Satibois Boleli Boleli)
Gentiny Ngobila, mokambi ya engumba ya Kinshasa, 17 avril 2019. (Facebook/Satibois Boleli Boleli)

Mokambi ya engumba ya Kinshasa aboyi botamboli lingomba Lamuka limbongisaki mpo ya mokolo ya le 30 juin.

Gentiny Ngobila akomi na ye eyano na ye mokambi ya misala ya Lamuka na Kinshasa, Fidèle Babala, ete mokolo ya lipanda, le 30 juin, esengeli epesamela limemya na bato nyonso.

Nzokande, Martin Fayulu moko na bakambi ya Lamuka asengaki bana ya Congo démocratique kotambola banda mokolo ya le 30 juin mpo na kotelemela boyokani kati na président Félix Tshisekedi na mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Botamboli yango bosengelaki bokozala mpe mpo na kosenga bosolo ya maponami, nsima na bolongolami na ba parlementaires na Cour constitutionnelle.

Kasi misala maye ya bosembo bosilisi kotala ba recours ya parlementaires mpe mikopesa kala te likateli na yango.

XS
SM
MD
LG