Bavandi bakitaki o’balala nsima na basimba minduki bayebani te kobona na butu ya lundi na mardi tata ya libota lyoko mpe komema biloko bya ye, na Commune ya Kikula na Likasi, na Haut-Katanga. Bourgmestre ya Kikula alobi bavandi bakangaki basimba minduki basatu mpe batumbaki bango.