"Mokonzi ya mboka asepeli na mosala tosali kasi alingi ete makambo mabale mabongisama : likambo ya yambo ya kobongisa litali bozali ya bituka binso ya ekolo Congo démocratique. Solo, bituka bisatu bizalaki te na mokanda moye nalakisi ye mpe mokonzi apesi ngai malako mpo na yango. Likambo ya mibale ya kobongisa litali myoko misala mizala mpo na baye bazali na nkwokoso na nzoto (bibosono). Soki bobosani te, yango ezali boko na makambo masengamaki mpo na mbulamatari oyo. Awa mpe mokonzi ya mboka apesi malako mpo na kosilisa likambo yango" elobi Permier ministre Ilunga.
Kolanda PM Ilunga, bokutani mosusu mobongisami o’mokolo ya eyenga mpo na kotala mokanda ya nkombo eye akombogisa.
"Tozali kokende moke moke na ngango mwana akobotama. Ezali likambo ya mwa ngonga. Kino mokolo yambo, tokosilisa likambo yango. Mpe nakozonga awa lobi (mokolo ya eyenga) na mokanda ya suka moye mokolanda malako maye," abakisi PM ilunga.
Esali koleka sanza sambo banda Félix Tshisekedi akota na bokonzi mpe pene na sanza minei banda M. Ilunga atiama Premier ministre, kasi mbulamatari etiyama kaka te.
Mposo mosili, na Luanda, na bokutani na bakokani wa ye ya bikolo ya etuka ya Grands Lacs, M. Tshisekedi alakaki ete gouvernement ekokaki kotiyama na mikolo misato mileki. Kasi yango esalami te kino suka ya mposo.
M. Tshisekedi alobaki yango ezali nde "likambo ya koyebana malamu mpe koyokana malamu kati na boyokani kati na CACH, lingomba na ye, na FCC, ya mokonzi ya kala, Joseph Kabila, banguna na politiki ya kala".