Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi apesi mibeko mbulamatari efuta mosolo mpo na baye ya likama ya Lufu


Président Félix Tshisekedi azali kosolola na moko ya baye bazokaki na likama ya motuka na Lufu, Mbanza Ngungu, Kongo central, 21 octobre 2019. (Facebook/Valery-Giscard Kusema)
Président Félix Tshisekedi azali kosolola na moko ya baye bazokaki na likama ya motuka na Lufu, Mbanza Ngungu, Kongo central, 21 octobre 2019. (Facebook/Valery-Giscard Kusema)

Président Félix Tshisekedi akitaki nsima ya nzanga na esika ya likama libomi pene na bato misato na Lufu, na Kongo central.

Akendeki mpe lopitalo ya Nsona Nkulu epayi wapi baye bazokaki, 19, bamemamaki.

M. Tshisekedi "azwi mokano ya kofuta ba factures nyonso. Mosolo ya matanga ya baye banso bakufi mokopesama na mbulamatari," eyebi na Valéry-Giscard Kusema, moko ya baye bakambaka mosala ya bopanzi sango ya présidence, na page Facebook na ye.

Présient Tshisekedi akitaki na esika yango elongo na molongani waye mpe bakonzi basusu.

Mokonzi ya RDC aboyi kokende na Japon nsima na likama ya motuka liye. Abengisamaki na botiyami na bokonzi ya Empereur ya ekolo eye.

XS
SM
MD
LG