Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Cour constitutionnelle ekati mpo etali ba recours ya ba parlementaires invalidés


Boko na ba zuzi mitano ya Cour constitutionnelle, na Kinshasa, 15 janvier 2019.
Boko na ba zuzi mitano ya Cour constitutionnelle, na Kinshasa, 15 janvier 2019.

Cour constitutionnelle ebandi kobimisi miko na yango ya suka nsima na ba recours ya parlementaires.

Ba parlementaires bayike bazalaki invalidés bazongisami.

Cour constitutionnelle esilisaki mposo moleki mosala ya kotala ba recours.

Chambre unique moko etiyamaki nsima na boboyi mpe botelemeli ya parlementaires baye longolamaki na mokano ya Cour constitutionnelle.

Pene na 50 parlementaires bazalaki invalidés. Kasi 23 kati na bango bazalaki ya lingomba ya opposition Lamuka.

Bazalaki kosala sit-in banda mokano ya Cour consitutionnelle molongalaki bango.

Président ya Cour constitutionnelle, Bénoit Lwamba Bintu alobaki esengelaki kobongisa mbeba (erreurs matérielles) esalemaki.

Mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi asololaki na ye mpe alobi ete emonanaki polele ete mbeba solo esalamaki mpe esengelaki kobongisa yango.

XS
SM
MD
LG