Président Félix Tshisekedi asakoli wuta mokolo mwa mitano (13 sanza ya zomi 2023) na mpokwa bolembisami bwa mikamo mya état de siège to bokambami na bayi mampinga ya bituka bya Ituri mpe Nord-Kivu, na monyele ya Ekolo Congo democratique.
Na lisikulu asalaki lobi na butu na etando eye ya mboka, mokonzi ya ekolo alimbolaki ete azali kotiya misala miye mikozongisa malembe malembe bokonzi bwa basoda na maboko ma ba civili na bitando bya bokonzi bwa nse epayi bokengi bosi bozongi mpe bizali kokengelama na mampinga ma Ekolo.
Kolanda maloba ma Felix Tshisekedi, elingi koloba bolongwui bwa bopekisi bwa makoki ma bato bopesami na Buku likonzi boye bosalamaka na eleko ya état de siègebolongwe.
Ezali bongo makoki lokola botamboli bwa bato mpe biloko bya bango na bonsomi bonso mpe bokoti ndako to couvre-feu, na bonsomi bwa bato ya kosala milulu na kimya nyonso.
Félix Tshisekedi alobi, motuya mozali nde kopesa baye banso basengeli kozala na maponami, makoki ma bango ya kopona to koponama na bonsomi bonso. Mokano moye mozwami ntango sanza mibale etikali mpo na maponami ma mokonzi ya mboka, bakeli mibeko mpe bakonzi ba nse.
Nzokande, nsima na sanza motoba ya kimya, bitumba bizongeli makasi wuta libandela lya sanza eye ya zomi kati na batomboki ba M23 na babundi ba Wazalendo mpe mampinga ma ekolo na Nord-Kivu.
Bato mingi bazali kokima bisika bavandaka. Etats de siege eye etiamaka na sanza ya mitano ya 2021, esali sika mibu mibale na sanza mitano.
Na lisikulu lya ye, Felix Tshisekedi atalisi ete bokengi bobongisami na bisika biike na bituka ya Ituri mpe Nord-Kivu.