Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat de siège : 5 colonels bakatelami mibu zomi ya boloko mpo na bopengwisi misolo na Ituri


Major sergent Musenu Tshilayi (2G) aelemi liboso lya bazuzi ya Haute cou militaire na Kinshasa, 4 avril 2016.
Major sergent Musenu Tshilayi (2G) aelemi liboso lya bazuzi ya Haute cou militaire na Kinshasa, 4 avril 2016.

Court militaire ya Ituri ekateli mibu zomi ya boloko na ba colonels batano, ya polce nationale mpe ya mapinga, basambisamaki mpo na bopengwisi misolo mya misala mya mampinga mpe police.

Ba officiers ya ba soda mpe ya police nationale (PNC) baye balongalami mpe na mampinga mpe police, kolanda mokano Cour militaire ya Ituri esakoli.

Ba colonels babale basusu ya ba FARDC, mampinga ma Ekolo Congo démocratique bapesami sanza zomi na mibale ya boloko mpe babale batikami.

Basambisamaki wuto le 17 septembre.

Le 21 juillet, ba officiers mwambe ya mampinga mpe PNC bakangamaki nsima na inspection générale ya ba FARDC kolaba ete emonisamaki été bapengwisaki misolo mya l’Etat,

Ba avocats ba bango balobi te soki bakosenga bobandeli ya bosambisami.

Ituri, lokola mpe Beni na etuka ya Nord-Kivu etiamaki na état de siège wuto le sanza ya mitano mpo na kobundisa basimba minduki ya ba ADF mpe basusu.

XS
SM
MD
LG