Procureur ya Republique pene na Parquet ya Grande Instance ya Goma amonisaki na maire biloko biyibamaki

Bakimba bitumba bazali kokima bitumba ya batomboki ba M23 na Kibumba mpo na kokende na nzela ya Goma, Nord-Kivu, 16 sanza ya zomi na moko 2022.

Na Goma, procureur ya Republique pene na Parquet ya Grande Instance ya Goma, magistrate Paluku Kitambala Pascal, amonisaki, lobi loleki, na maire ya mboka, biloko ya koliya mpe biloko misusu ebele biye bilengelami mpo na bakima bisika na bango ya kovanda mpo na bitumba, kasi biyibamaki na bato ya mitema mabe. Ezalaki bongo ba saki ya semoule ya masango ntuku mineyi na libwa mpe ba bachi ntuku misato na mwambe biye bimonanaki na lisalisi ya bokengeli ya misala ya bosembo. Biloko biango etindamaki na bureau ya misala ya kosalisa bato to affaires sociales et humanitaires ya Mairie yambo te bameme yango esika ya bato basengeli na yango. Mokonzi ya etuka abwaki bongo mbela na bato basalisaka bato bazali na bosenga ete baponaka bato ya malamu ya kosala na bango mosala mingi mingi na eleko ya kokabolela bango biloko mpo na kokutana namikakatano ya lolenge wan ate. Sima na yango akebisi baye bakokanga bango bazali kotekisa biloko bilengelami mpo na bato bazali kokelela.