RDC etikali na moto ya groupe H nsima na kolonga Ethiopie 2-0, Congo-B. ekweyi 0-2 liboso lya Uganda mpe Angola ebeti Sudan 2-1

Basani ba RDC bazali komela mayi na match na Sudan na match ya phase finale ya CAN 2024 na stade Felix Houpouet-Boigny na Abidjan, 10 sanza ya mibale 2024. (Photo by Sia KAMBOU / AFP)

Ba Léopards ya Ekolo Congo Démocratique balongi ba Walya ya Ethiopie 2-0 na match ya mibale ya ba éliminatoires ya CAN 2024 na Maroc mokolo mwa mosala moko na stade Benjamin Mkapa na Tanzanie.

Na elongo eye, ba Léopards batikali na molongo mwa yambo ya groupe H na bilembo motoba.

Théo Bongonda aningisaki monyama mpo na ba Léopards na 62' .

Fiston Mayele abakisaki ya mibale na 76'.

Ba Léopards balongaki mpe lokola match ya yambo liboso lya Guinée 1-0 na stade des Martyrs ya Kinshasa mokolo mwa mposo moleki.

Na groupe K, Uganda ebetaki Congo-Brazzaville 2-0 na Kampala.

Congo-Brazzaville elongaki match ya yambo mposo moleki 1-0 liboso lya Sudan ya Sud.

Uganda ezali yambo na groupe eye na bilembo minei.

Angola, na groupe F, ekomi mpe na bilembo motoba.

Ba Palancas Negras ya Angola balongi 2-1 Sudan.

Balongaki ba Black Stars ya Ghana 0-1 mikolo minei mileki.

Ba Match misusu mpe ebetamaki.

Burundi 0-1 Sénégal

Guinée Equ. 2-2 Togo

Madagascar 1-1 Comores

Niger 1-1 Ghana

Lesotho 0-1 Maroc