Elim. CAN 2025: Ba Léopards balie ba Taïfa Stars ya Tanzanie mpe baleki na phase finale

Mosani ya RDC Meschack Elia azali kopusa ndembo na match na Tanzanie,, na CAN 2024 na groupe F, na stade Amadou Gon Coulibaly, Korhogo, Côte d'Ivoire, 24 sanza ya yambo 2024. (Photo by Fadel Senna / AFP)

Meschak Elia, mosani ya Ekolo Congo Démocratique nde apesi nzela na ba Léopards ya mboka na ye koleka na phase finale ya CAN 2025 ata ko ba matches etikali nanu mpo na ba éliminatoires ya momekano moye.

Mosani ya Young Boys na club ya Suisse, Meschak Elia atiaki mongete ya yambo na 87' mpe abakisaki abakisaki ya mibale na 90+3'.

RDC elongi bongo Tanzanie 0-2 na stade ya Benjamin Mkapa na Dar es Salam.

Ba Léopards bakomi bongo na 12 pts mpe batikali na molongo ya yambo.

Kino sika bapoli nanu te.

Na groupe H, balandami bongo na Tanzanie eye ezali na 4pts.

RDC epolisaki Tanzanie mpe lisusu na match aller na Kinshasa mposo moleki.