ICG esengi Tshisekedi koyokana na Angola, Ouganda mpe Rwanda, ba Hema na ba Kendu mpo na Ituri

Bakima bitumba na camp pene na Bunia, na Ituri, 21 juin 2019.

ICG (International Crisis Group) esengi masolo kati na Tshisekedi, Angola, Ouganda na Rwanda mpe ba Hema na ba Lendu mpo na bitumba bisila na Ituri.

Pene na bato nkoto bakufi mpe kati kati ya million bakimi bitumba na Ituri wuto décembre 2017, elobi ICG na rapport moko mibimisami na Kinshasa.

ICG esengi na bakonzi ya RDC kosolola na basimba minduki mpo batika bitumba.

"Mbulamatari esengeli ewelisa liboso koyokana na basimba minduki ya ba Lendu mpo na komema bango kokitisa bibundeli mpe kondima masolo na ba Hema elongo na kabila misusu ya Ituri," ekomi ICG.

Centre d’analyse eye eyebisi mpe ete bato basusu libanda na Ituri lokola bayi etuka ya Nord-Kivu mpe ya bikolo nzinganzinga bazalaka mpe mobulu mwango.

Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi "esengeli asala mpo ete bikolo nzinganzinga bitika nzela moko kopesa maboko na babundi na etuka eye," esengi ICG na koloba ete Angola, Ouganda Rwanda na RDC esengeli bakuta na likita.

Bitumba bingalaki na Ituri kati na 1999 na 2003, mingi mingi kati na Lendu na ba Hema, Ouganda azalaki kotia moto. Nkoto na nkoto na bato bakufaki. Nsima na yango Cour pénale internationale epesaki etumbu na bakambo sambo ya mangomba ya basimba minduki.

Bitumba byango bizongelaki na 2017 kasi mbala eye emonani lokola Ouganda ezali te na nsima na yango.