RDC

Ensemble esengi botosi ya Code minier mpo etali bokengi

Moïse Katumbi na lisanga na ye "Ensemble pour le changement" na Johannesburg, Afrique du Sud, le 12 mars 2018.

Baye ya lingomba "Ensemble pour le changement" basengi ete gouvernement etosa Code minier mpo etali bokengi.

Baye ya lingombe Ensemble bokutanaki mikolo minei na Lubumbashi nzinga nzinga na mokambi na bango, Moïse Katumbi, oyo awuti kosala mobembo kati na etuka oyo ezalaka kala Katanga.

"'Ensemble pour le changement' esengi, na kobeta mokoloto, gouvernement etosa Code minier (Mobeko ya misala ya makele) na kotikela bokengi ya makele (to mines) na police ya mboka mpe na kotika mampinga kokokisa misala na yango ya loboko ya bobateli mpe bobundeli mabele yamboka, mingi mpenza na monyele to Est ya mboka, epayi wapi mboka ezali mpenza na likama," ekomi lingoma liye na liyebisi libimisi nsima na bokutani.

'Ensemble pour le changement" epameli boteki mines baseleli yango ata eloko moko naino te (exportation des minerias brut) boye bozongeli mpe bokomi makasi. "Yango ekitisi mingi mpenza misolo ya l’Etat, mpe ekitisi ntalo ya ya bilotko mingi mpe ememi na ba sociétés ya minene kokanga," elobi liyebisi lyango.

Baye ya Ensemble bapameli mpe kaniaka, bobuki mibeko, bozangi misala, bozangi bokengi mpe bokono ya Ebola.

Basengi na ba parlementaires na bango kozwa mibeko ya kobundisa kaniaka, na bozongi ya misala ya Parlement.

Basengi mpe na gouvernement afutela bana kelasi ya suka ya secondaire mosolo lokola Moïse Katumbi asalaki yango na ntango azalaki mokambi ya etuka ya Katanga.

Ensemble eyebisi lisusu ete etikali na opposition républicaine.