Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Police epanzi batombali ya Lamuka


Martin Fayulu azali koswana na ba pulusu na botambali na Ste Therese, N'Djili, Kinshasa, 30 juin 2019.
Martin Fayulu azali koswana na ba pulusu na botambali na Ste Therese, N'Djili, Kinshasa, 30 juin 2019.

Police ebetaki gaz lacrymogène mpe epazanki batombali ya lingola Lamuka na Ste Therese N'Djili, na Kinshasa mpe bisika bisusu na ekola Congo démocratique. Na Goma, na Nord-Kivu, motamboli moko akufi na masasi, eyebisi bapanzi sango bazalaki bisika biye.

Bituluku na bato bakita o’nzela ata mokambi ya engumba Kinshasa, Gentiny Ngobila apekisa botamboli boye o’mokolo ya le 30 juin.

Martin Fayuku, Adolphe Muzito mpe bakambi basusu ya lingomba Lamuka baye bazalaki na libandeli ya batamboli na na boulevard Lumumba. Kasi botamboli boye, bosalamaki ba bisika biike.

Ba pulusu batika bango koleka te pene na boulevard Kimbuta na Ste Therese N’Djili na Kinshasa.

Ba pulusu babetaki masasi likolo mpe gaz lacrymogène ata balandi ya Lamuka bazalaki koyemba.

Baye nzinganzinga ya M. Fayulu balobi ete ba pneus ya mituka ya bakambi .

Nzokande mokambi ya police ya Kinshasa, cmdt div. Sylvano Kasongo ayebisi ete policier moko azoki makasi na eloko ebwakamaki na moko ya batamboli. Cmdt Div . Kasongo alobi ete moko na baye bazalaki nzinganzinga na M. Fayulu abetaki pulusu moko, akangami mpe akosambisama na lobamgu.

Mpo na mokambi ya engumba Kinshasa, M. Ngobila, le 30 juin, mokolo lipanda ya Congo démocratique mosengelaki mopesama limemya na bato banso.

Mokonzi ya ekolo Felix Tshisekedi alobaki na mituna mpe biyano na bapanzi sango ya ba medias Français ete andimaki mpe azali na bomoko na bopekisi ya botamboli boye mpo bayike babukaki mpe bampunza biloko mpe babundisaki police na meeting ya Jean-Pierre, moko ya bakambi ya lingomba liye, mposo moko molekki, kaka na esika eye ya Ste Therese N’Djili.

Nzokande, M. Fayulu asengaki ete ba naya Congo democratique bakita o’nzela banda mokolo ya le 30 juin kino mikano misusu mikopesamela bango, mpo na kosenga bosolo na maponami, na bozongisi ya ba parlementaires balongolamaki na mokona ya Cour constitutionnelle.

Na botamboli ya Goma, na Nord-Kivu, police mpe ebetaki masasi. Moto moko akufi, eyebisi balinga bapanzi sango kuna.

Batamboli na Goma bazalaki kotelemela lolenge bakonzi ya ekolo baboyi mbala mibale kopesa nzela na mwana moka Moise Katumbi kokita na engumba ya Nord-Kivu.

Bituluku ya batombali ya

XS
SM
MD
LG