Mampinga ma Zambie matikaki mabele ma RDC le 3 août (PP Président Tshisekedi)

Basoda ba Zambie bamemi sanduku ya boko na baye bakufaki na likama, na lilita lya Mutengo na Ndola, 11 février 2013.

"Mampinga ma Zambie matitaki mpenza mabele ma Ekolo Congo démocratique le 3 août," eyebisi molobeli ya président Félix Tshisekedi. Liyebisi na ye lipesami mokolo moko nsima na Sénatrice Francine Muyumba kotia ntembe na likambo lyango.

Kolanda maloba ma Tina Salama, molobeli molandi ya président Tshisekedi, na compte Twiter na ye, "bavandi ya bisika byango bazongi".

"Ndelo (bornes) provisoires etiyami mpe ya défitinitives ezali kotiyama," ebakisi Mme Salama.

Mercredi, Sénatrice Muyumba amitunaki na Tweet moko soki nani azalaki koloba solo kati na RDC na SADC.

Mpo na Mme Myumba, SADC elobaki ete etindaki ba experts na yango baye bakomi nanu te rapport ya suka mpo likambo lyango.

"Malako na nzela ya rapport moko ya commission ya président ya organe ya Défense na bokengi mapesami na SADC," eyanoli ngambo na ye Mme Salama.

Basoda ya Zambie bakotaki na mboka Kalubamba na Kibanga, na Moliro, na etuka ya Tanganyika wuto mwa ba sanza.

Molebeli ya mbulamatari David-Jolino Diwampovesa-Makelele asakolaki ete SADC epesaki mposo mibale na Zambie mpo na kolongwa.

M. Makelele andimi ye mpe lokola ete Zambie elongoli ba soda ba yango na RDC.