Tshisekedi na Macron basololi mpo na bokutani bwa "One Planet" mpe Centrafrique

Président Félix Tshisekedi ayambami na mokokani wa ye ya ekolo France Emmanuel Macron na ndako ya bokonzi Elysée, Paris, 11 novembre 2019. (Facebook/Présidecene RDC)

Mokonzi ya France Emmanuel Macron na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi, basololi na nzela ya singa mpo na likita One Planet likobanda mposo mokoya.

Basololi mpe mpo etali makambo mazali koleka na Centrafrique nzinga nzinga na maponami ma mokonzi ya mboka malongami na président Faustin Archange Touadera.

"Likita likoya 'One Planet' likoya, lisengeli kosalama lundi 11 janvier na Paris (France) mpe makambo matali maponami na Centrafrique mazalaki matono mabale ya motuya kati na masolo na bango," elobi présidence ya RDC.

One Planet Summit ezali likita lya molongo libandisama na France, Nations unies mpe Banque Mondiale mpo na bobateli ya libanda lya bomoi mpe climat.