➡️Tshisekedi asengi bayi molongo kotiya Rwanda na nkasa ya moyindo, na Munich ➡️Makanisi makbwani na Kinshasa nsima na Cenco-ECC kokutana na bakambi ba AFC/M23 ➡️Député Claude Misare alobeli dejeuner national de prière ya USA epayi azalaki
➡️Kigali elobi Cour ya makoki ma bomoto ya Afrika ezali na mpifo te ya kosambisa yango na boundami ya Kinshasa ➡️Parlement ya Europa esengi UE etelemisaboyokani bwa yango na Rwanda ➡️Tshisekedi akomi na Allemagne
➡️Ba Codeco babomi bacivili koleka 50 na Djaba (Ituri) ➡️Couvre-feu etiami na Uvira ➡️UDPS/Tshisekedi eboyi masolo na mesa na M23 mpe misala Cenco-Ecc mizali kosala
➡️Mgr Nshole alobeli boyokani mpo na kimya ECC na Cenco basengi na bana ba RDC banso ➡️M23 epanzi bisika binso bakima bitumba bazalaki mpe esengi bango kozonga bisika bawuta ➡️Mbulamatari ezali kokongola makila mpo na bacivili na basoda bazoki na Goma
➡️Bakima bitumba basengi kozanga bisika bya bango na bakambi na M23 na Goma ➡️ONU emitungisi ndenge M23 ezali kokende na Sud-Kivu ➡️Chine ebungisi bana ba yango babale na botutani ya mpepo na pakapaka na D.C.
➡️M23 elakisi ba mercernaires baye ekengaki mpe ezongisi mboka na bango na nsela ya Rwanda ➡️Tshisekedi akokende te na masolo na Kagame na Nairobi ➡️Lourenço asengi Rwanda na M23 kolongwa na RDC mpo na bozongi ya masolo
Donald Trump alapi ndayi mpe akomi mokonzi ya mbala 47 ya Ekolo Amerika. Azongi bongo na ebonga nsima na kokweyisama liboso lya Joe Biden na 2020. VOA Lingala epesi bino nsango na ngoka ya milulu.
Na nzela ya IA to pe intelligence artificielle, babokoli mbisi ya ekolo Congo democratiki bazali kozua makoki ya koyeba na lombango bokono bozali kotungisa mbisi mpe ezali kosala ete bambisi bakufa lisusu mingi te. Askin Kolingwanga
Mokonzi ya ekolo Angola Joao Lourenço ayambamaki na mokokani wa ye ya France Emmanuel Macron na Paris epayi basololaki mpo na kimya kati na RDC na Rwanda. Basololaki mpe mpo na boyokani kati na Launda na Paris. Totala ndambo ya lisikulu lya Joao Lourenço. Tokuta na wwww.voalingala.com
➡️ Makanisi ya bozui ba mboka misusu ya Trump, ebandi kotambuisa makanisi ya bakonzi ya Europa ➡️ Nzoto ya mokonzi ya kala ya Amerika Jimmy Carter ekomaki na Capitole na Washington ➡️ Mampinga ma FARDC ezongelaki ndambo ya cite ya Masisi-centre na Nord-Kivu
Voir plus