Ambassade ya ekolo Amerika na Kinshasa ebandi manaka "American Spaces Post-Elections Programming" mpo na kopesa bilenge mateya matali bomwana mboka ya malamu na ntina ya koyikisa makasi democrtie na bituka zomi na mitano kati na Ekolo Congo Démocratique. Nsango ya André Ndambi.
➡️Tshisekedi asengi bayi molongo kotiya Rwanda na nkasa ya moyindo, na Munich ➡️Makanisi makbwani na Kinshasa nsima na Cenco-ECC kokutana na bakambi ba AFC/M23 ➡️Député Claude Misare alobeli dejeuner national de prière ya USA epayi azalaki
➡️Kigali elobi Cour ya makoki ma bomoto ya Afrika ezali na mpifo te ya kosambisa yango na boundami ya Kinshasa ➡️Parlement ya Europa esengi UE etelemisaboyokani bwa yango na Rwanda ➡️Tshisekedi akomi na Allemagne
➡️ Batomboki ba M23 bakoti na Ihusi mpe Kelehe-centre na Sud-Kivu ➡️ Ndayishimiye akebisi Rwanda na kobundisa ekolo na ye na matata ma ye mazali kongala na est ya RDC ➡️ Bakambi ba bikolo bya Afrika bakokutana na Addis Abeba na likita lya mobu na mobu ya Union africaine
Balinga molato baike basangani na lingoma lya ba "sapeurs" na Kinshasa, babwaki mbela mpo na kimya mpe bapesi maboko na mampinga ma Ekolo Congo Democratique na bitumba biye batomboki ba M23 na mampinga ma Rwanda bazali kosala na monyele ya RDC.
➡️Ba Codeco babomi bacivili koleka 50 na Djaba (Ituri) ➡️Couvre-feu etiami na Uvira ➡️UDPS/Tshisekedi eboyi masolo na mesa na M23 mpe misala Cenco-Ecc mizali kosala
➡️Mgr Nshole alobeli boyokani mpo na kimya ECC na Cenco basengi na bana ba RDC banso ➡️M23 epanzi bisika binso bakima bitumba bazalaki mpe esengi bango kozonga bisika bawuta ➡️Mbulamatari ezali kokongola makila mpo na bacivili na basoda bazoki na Goma
➡️Bakima bitumba basengi kozanga bisika bya bango na bakambi na M23 na Goma ➡️ONU emitungisi ndenge M23 ezali kokende na Sud-Kivu ➡️Chine ebungisi bana ba yango babale na botutani ya mpepo na pakapaka na D.C.
➡️M23 elakisi ba mercernaires baye ekengaki mpe ezongisi mboka na bango na nsela ya Rwanda ➡️Tshisekedi akokende te na masolo na Kagame na Nairobi ➡️Lourenço asengi Rwanda na M23 kolongwa na RDC mpo na bozongi ya masolo
➡️ Donald Trump akebisi kopesa Russie etumbu soki ekoyani te na Ukraine ➡️ Secretaire d’Etat ya sika ya Ekolo Amerika alobi azali kolongola misala mitali climat na mambi ma ntoki na mokumba ya Departement d’Etat ➡️ Bwato inso ya mike epekisami kotambola likolo na lac Kivu mpo na bozangi bokengi
➡️ Secretaire d’Etat ya sika ya Amerika alobi azali kolongola misala mitali climat na mambi ma ntoki na mokumba ya Departement d’Etat ➡️ Bwato inso ya mike epekisami kotambola likolo na lac Kivu ➡️ Bayi ekolo Chine zomi basambisamaki mpo na kozwa makele na Sud-Kviu batikami na mokano mwa bazuzi
Donald Trump alapi ndayi mpe akomi mokonzi ya mbala 47 ya Ekolo Amerika. Azongi bongo na ebonga nsima na kokweyisama liboso lya Joe Biden na 2020. VOA Lingala epesi bino nsango na ngoka ya milulu.
Voir plus