Bitumba to Matata
mokɔlɔ ya mínéi 28 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2024
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 28, 2024
Sango ya Mokili Lelo: Seth Kikuni akatelami mobu moko ya boloko
➡️ Mokolo ya mibale ya CAN ya Handball ya basi na Kinshasa ➡️Ekolo Amerika elaki kobakisa mangwele ya Mpox na RDC ➡️Monusco, société civile na bakonzi bazali koluka kimya nsima na bobomi ya basoda ba kimya na Beni
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 28, 2024
Sango ya Mokili Lelo: Putin alobi Trump azali moto ya mayele mpo na kosilisa matata
➡️Seth Kikuni akatelami mobu moko ya boloko ➡️Mabota koleka 8.000 mazangi esika ya kolala nsima na mpela eye ebuki ndako mingi na Libenge ➡️CAN Handabll ya basi na Kinshasa: RDC Uganda 38-11, Egypte-Congo-B 27-24
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 27, 2024
SML: Bayangeli bituka bandimi bango banso mbongwana ya Buku likonzi na likita lya Kalemie
➡️Bakima bitumba baike bazongi na Sake ata ko M23 ezali mosika te ➡️Trump alaki komatisa na 25% mpako ya biloko biwutaka Canada na Mexique ➡️Chine ebimisi bana ba Amerika babale na boloko na yango
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 27, 2024
SML: Moto moko akufi mpe biloko mingi biziki na moto ya motuka ememaki essence na Matadi
➡️Bavandi bakimaki Sake bazongi ata ko M23 ezali pene pene ➡️Likita lya mbala 11 ya bayengeli bituka na Kalemie ➡️ONU ezali kotinda misala mya yango mitali tortures to monyokoli na RDC
-
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 26, 2024
Sango ya Mokili Lelo: Nzoto ya bato 11 bakufaki na bokweyisami ya mabele ekundami na Kalehe
➡️Ba M23 babengani bakima bitumba na Burare, Nord-Kivu ➡️Matata mazali kokoba kati na ba magistrats na ministre ya mambi ma Sembo ➡️Motango mwa bakima bitumba momati mbala misato na Afrika mpo na bitumba